Lokumu Eza Ya Yo - paroles
ANNE KEPS MWINDJUMB
Album: OLianne music live, 2019
“Car de lui, et par lui, et pour lui sont toutes choses. À lui soit gloire éternellement : Amen !”
Romains 11:36
Yahweh lokumu ango ya nani eh ?
Ah te… Mololo mololo mololo mololo mololo
Yaya eh
Oza Nzambe na bolingo
Eh Yesu na ngai
Obongi na lokumu
Eh Yahweh na ngai eh
Yahweh lokumu eza ya yo
Eh Yahweh na ngai eh
Yahweh lokumu eza ya yo
Yahweh sala nga na yeba eh
Ba posa ya motema na yo
Loba nga na yoka eh
Mabanzo ya molimo na yo oh
Bongo nga na kokisa Papa eh
Ba posa ya motema na yo eh
Bongo nga na loba maloba eh
Mae ko simba yo Yesu
Loba nga na yoka eh
Mabanzo ya molimo na yo
Simba nga na ningana eh
Na nguya ya loboko na yo
Bongo na misopa Papa eh
Mabolongo na se na sanjola
Na mitika Yahweh
Liboso na yo
Oza Nzambe
Oza Nzambe na bolingo
Yo nde obongi eh
Obongi
Obongi eh
Na lokumu
Ah Yahweh lokumu ango ya nani eh ?
Yahweh lokumu eza ya yo
Mokonzi lokumu ango ya yo eh
Yahweh lokumu eza ya yo
Bongo sala nga na tatola eh
Nguya ya loboko na yo
Kokisa na yemba eh
Bilaka ekoma loyembo
Ndenge yo osalaka Papa eh
Yango nde ekoma mabina
Bongo nga na tatola Papa eh
Na mabota nioso
Oza Nzambe na bolingo eh
Oza Nzambe na bolingo
Mokonzi yo obongi oh
Obongi
Obongi na lokumu Masiya na nga
Na lokumu
Elombe lokumu eza ya yo eh
Yahweh lokumu eza ya yo
Mokonzi lokumu ango ya yo eh
Yahweh lokumu eza ya yo
Ebandeli pe suka na nioso lokumu eza ya yo eh
Eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya yo
Mokokisi ya nioso Papa, lokumu eza ya yo
Yahweh lokumu eza ya yo
Ba honneurs, ba acclamations ebongi na yo Papa
Eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya yo
Malasi ya kitoko pe ya valeur, na sopi ango na makolo na yo
Yahweh lokumu eza ya yo
Motole ya nkembo, elamba ya lokumu eh Masiya na nga eh
Eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya yo
Yahweh lokumu eza ya yo
Yahweh lokumu eza ya yo
Yahweh lokumu eza ya yo
Eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya yo
Tika na sopana na mabele na pesa yo lokumu eh Masiya eh
Yahweh lokumu eza ya yo
Ngai na limwa Papa na pesa yo lokumu eh, elombe oh
Eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya yo
Bongo mololo, mololo, mololo, mololo, mololo eh
Yahweh lokumu eza ya yo
Bongo mabina na ngai ebongi nde na nani eh ?
Eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya yo
Ah lokumu eza ya yo
Lokumu eza ya yo
Lokumu se ya yo eh
Lokumu eza ya yo eh
Ebongi na moto te oh Papa eh
Lokumu eza ya yo
Solo na bato’a mokili te Yesu na nga
Lokumu eza ya yo
Ko tombwama ebongi na moto te oh Papa eh
Lokumu eza ya yo
Solo na bato’a mokili te
Lokumu eza ya yo
Ah ah eh Yahweh
Yahweh lokumu eza ya yo
Yahweh, Yahweh, yaya, yaya
Eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya yo
Yahweh, Yahweh
Eh Yahweh
Sala bomoyi na nga lokola ya yo
Yaya eh
Na lingi na zala ndakisa pona ba mingi
Solo elaka na yo eh
Elaka na yo ya bosantu elata nga
Papa
Papa na zali se mwana
Papa eh
Soki otiki ngai na ko kweya
Na ko kweya pamba eh
Vraiment na zali ko senga lisungi na yo
Solo na zali se mwana na yo eh
Papa na zali se mwana
Papa eh
Soki otiki ngai na ko bunga
Na ko bunga yelelele
Surtout na zali ko senga lisungi na yo
Yahweh, Yahweh, eh
Sala bomoyi na nga lokola ya yo
Solo na lingi eh
Na lingi na zala ndakisa pona ba mingi
Eh elaka na yo eh
Elaka na yo ya bosantu elata nga
Yahweh na lola eh
Papa na zali se mwana
Papa na nga
Soki otiki ngai na ko kweya
Na ko kweya pamba eh
Vraiment na zali ko senga lisungi na yo
Solo na zali se mwana na yo eh
Papa na zali se mwana
Papa eh
Soki otiki nga na ko bunga
Na ko bunga yelelele
Vraiment na zali ko senga lisungi na yo
Ah ah eh Yahweh
Yahweh lokumu eza ya yo
Yahweh, Yahweh, Yahweh, Yahweh
Eh Yahweh
Yahweh na nga
Yahweh lokumu eza ya yo
Lokumu eza ya yo eh
Lokumu se ya yo eh
Lokumu ango ya yo eh Yesu eh
Lokumu eza ya yo
Eh Yahweh
Yaya…